Acts 8

BATATOLI NA YUDEA MPE NA SAMARI

Banyokoli Lingomba Mpe Bandimi Bapalangani

1Saulo mpe azalaki na molongo ya bato oyo bandimaki ete baboma Etieni. Kaka na mokolo wana, minyoko moko ya makasi penza ekweyelaki Lingomba na Yelusalemi. Bandimi nyonso bapalanganaki na Yudea mpe na Samari, longola kaka bantoma. 2Bato oyo batosaka mibeko ya Nzambe bakundaki Etieni mpe balelaki ye mingi. 3Kasi, Saulo abandaki kosala nyonso mpo na kopanza Lingomba. Azalaki kokota na bandako nyonso mpo na kokanga mibali mpe basi, mpe kobwaka bango na boloko.

Filipo na Samari

4Nzoka nde, bandimi oyo bapalanganaki, bakomaki koteya Liloba ya Nzambe bisika nyonso bazalaki kokende. 5Filipo akendaki na engumba moko ya Samari, mpe kuna, ateyaki Klisto. 6Tango bato nyonso bayokaki Filipo koteya mpe bamonaki bikamwa oyo azalaki kosala, bayokaki na bokebi makambo oyo azalaki koloba. 7Pamba te, milimo ya mbindo ezalaki kobima na koganga makasi kati na bato mingi oyo bazalaki na yango. Bato mingi oyo bakufa makolo, mpe oyo batambolaka tengu-tengu bazalaki kobika. 8Boye, bato ya engumba yango batondisamaki na esengo mingi penza.

9Nzoka nde, wuta kala, ezalaki na moto moko na engumba wana, oyo kombo na ye ezalaki Simona. Azalaki kosala misala ya maji. Azalaki kokamwisa bato nyonso ya Samari mpe azalaki komimona moto monene. 10Bato nyonso, bato minene mpe bato mike bazalaki koyokela ye mpe bazalaki koloba : “Moto oyo azali na nguya ya Nzambe, oyo babengaka : ‘Nguya monene !’ ” 11Bazalaki kolanda ye mpo ete wuta kala, azalaki kokamwisa bango na misala na ye ya maji. 12Kasi tango bandimaki sango malamu oyo Filipo ateyaki mpo na Bokonzi ya Nzambe mpe mpo na Kombo ya Yesu Klisto, mibali mpe basi bazwaki libatisi. 13Simona mpe andimaki, boye ye mpe azwaki libatisi. Azalaki kolanda Filipo bisika nyonso oyo azalaki kokende, mpe azalaki kokamwa komona bilembo minene mpe bikamwa oyo ezalaki kosalama.

14Wana bantoma, na Yelusalemi, bayokaki ete bato ya Samari bayambi Liloba ya Nzambe, batindelaki bango Piere mpe Yoane. 15Tango bakomaki kuna, babondelaki mpo na bango mpo ete bazwa Molimo Mosantu. 16Pamba te, Molimo Mosantu akitelaki nanu ata moto moko te kati na bango ; bazwaki kaka libatisi na Kombo ya Nkolo Yesu. 17Boye, Piere na Yoane batielaki bango maboko mpe bazwaki Molimo Mosantu.

18Tango Simona amonaki ete bato oyo bandimaki bazwaki Molimo Mosantu wana bantoma batielaki bango maboko, apesaki Piere mpe Yoane mbongo, 19mpe alobaki :

—Bopesa ngai mpe nguya oyo, mpo ete moto nyonso oyo ngai mpe nakotiela maboko akoka kozwa Molimo Mosantu !

20Kasi, Piere azongiselaki ye :

—Tika ete yo na mbongo na yo bokufa, mpo okanisi ete okoki kosomba likabo ya Nzambe na mbongo !
21Solo, ozali na libula to na makoki kati na mosala oyo te, pamba te motema na yo ezali sembo te liboso ya Nzambe. 22Yango wana, bongwana na mabe na yo mpe bondela Nkolo, tango mosusu akoki kolimbisa yo na oyo okanisaki na motema. 23Pamba te, namoni ete motema na yo etonda na zuwa mpe ozali mowumbu ya masumu.

24Boye, Simona azongisaki :

—Bino nde bobondela Nkolo mpo na ngai, mpo ete likambo moko te na oyo bowuti koloba ekomela ngai !

25Tango basilisaki kotatola mpe kosakola Liloba ya Nkolo, Piere mpe Yoane bazongaki na Yelusalemi, mpe bazalaki koteya sango malamu na mboka ebele ya Samari.

Filipo mpe moto ya Etiopi

26Anjelu ya Nkolo alobaki na Filipo :

—Telema, kende na sude, na nzela ya esobe, nzela oyo ewuta na Yelusalemi mpe ekenda kino na Gaza !

27Boye, Filipo atelemaki mpe akendeki, mpe na nzela, akutanaki na soda moko oyo baboma mokongo, azalaki moto ya mboka Etiopi. Azalaki mokonzi monene mpe azalaki na mokumba ya kobatela bomengo nyonso ya Kandase, mokonzi mwasi ya Etiopi. Moto yango ayaki na Yelusalemi mpo na kokumamela Yawe, 28bongo azalaki kozonga na mboka na ye. Avandaki kati na shar na ye mpe azalaki kotanga mokanda ya mosakoli Ezayi. 29Boye, Molimo alobaki na Filipo : “Kende mpe pusana pene ya shar wana.”

30Filipo akendaki mbangu pene ya shar yango mpe ayokaki ye kotanga mokanda ya mosakoli Ezayi.

Atunaki ye :

—Boni, ozali kososola makambo oyo ozali kotanga ?

31Ye azongisaki :

—Ndenge nini nakoki solo kososola yango, soki moto alimboleli ngai te ?

Bongo, abengaki Filipo ete amata na shar mpe avanda pembeni na ye.

32Tala eteni ya Makomi oyo azalaki kotanga : “Bamemaki ye lokola meme oyo balingi koboma,
lokola mwana meme oyo ekangi monoko
liboso ya moto oyo azali kolongola yango suki,
bongo afungolaki monoko na ye te.

33 Basambwisaki ye mpe baboyaki kolongisa ye.
Nani akolobela bakitani na ye ?
Pamba te, balongoli bomoi na ye na mokili !”

34Bongo, soda oyo baboma mokongo atunaki Filipo :

—Nabondeli yo, yebisa ngai : mosakoli azali koloba makambo oyo mpo na nani ? Alobaki yango mpo na ye moko, to mpo na moto mosusu ?
35Boye, Filipo ayebisaki ye sango malamu ya Yesu, na nzela ya eteni wana ya Makomi.

36Wana bazalaki kokoba na mobembo na bango, bakomaki na esika moko oyo ezalaki na mayi ; bongo soda oyo baboma mokongo alobaki :

—Tala, mayi yangʼoyo. Eloko nini ekoki kopekisa ngai ete nazwa libatisi ?

37[Filipo alobaki :

—Soki kaka ondimi na motema na yo mobimba, okoki kozwa libatisi !

Ye azongisaki :

—Nandimi ete Yesu Klisto azali Mwana ya Nzambe
Eteni oyo ezalaka te na mikanda mingi ya kala.
 !]

38Atindaki ete batelemisa shar. Boye, bango mibale, Filipo mpe soda oyo baboma mokongo bakitaki na mayi, mpe Filipo abatisaki ye. 39Tango babimaki na mayi, Molimo ya Nkolo alongolaki Filipo, mpe soda oyo baboma mokongo amonaki ye lisusu te. Bongo, azongelaki mobembo na ye na esengo nyonso penza. 40Nzoka nde, Filipo amonanaki na Azoti, mpe kuna azalaki koteya sango malamu na bingumba nyonso epai wapi azalaki kolekela, kino akomaki na Sezare.
Copyright information for LinMNB